musicas.mus.br

Letras de músicas - letra de música - letra da música - letras e cifras - letras traduzidas - letra traduzida - lyrics - paroles - lyric - canciones - AZALAKI AWA - GATHO BEEVANS - música e letra

Utilize o abecedário abaixo para abrir as páginas de letras dos artistas

A B C D E F G H I J K L M N O P Q R S T U V W X Y Z

Azalaki Awa letra


Azalaki awa pembeni na nga
Esika akeyi ekaboli nga na ye
Ye na mobembo nga ko mosika
Distance na kati ye na ngambo ngai na ngambo
Tango mosusu soki na kanisi ndenge
Oyo tozalaki epesi nga kobanga

Moto na lingi akoma mosika
Na tondi na ba souvenir na motema
Na lela na nani na sala ko nini na kende ko wapi
Nakomi se ko banza ngai moko

Azalaki se awa (se awa)
Cherie akeyi na ye
Alobaki na nga akozonga (se awa)
Nga ko na zelaka ye
Azalaki se awa (se awa)
Cherie akeyi mosika
Alobaki na ngai akozonga (se awa)

Suka se akoya
Na kolemba te na kozela ye solo
Nga na kokoka kokanga se motema
Na meka na tanga mokanda na
Ye makila eko panzana nzoto ekolenga
Na komi koyoka mongongo na ye
Na miso na komona se elili na ye

Na kati ya ndoto mobimba cherie
Asimbi nga loboko hoo na zui trouble
Na fongola miso na tala pembeni kasi moto te
Na komi komituna nga moko

Azalaki se awa (se awa)
Cherie akeyi na ye
Alobaki na nga akozonga (se awa)
Nga ko na zelaka ye
Azalaki se awa (se awa)
Cherie akeyi mobembo
Alobaki na nga akozonga (se awa)

Suka se akoya
Lelo na ndimi baye baloba
Solo maladi ya bolingo eza na kisi te
Bolingo lokola elanga ya rose
Ekoli yo motema batela yango malamu
Na sima ya mikolo tosala malasi
Partout toko kende topakola yango

Kuna ozali olotoko nga ata
Na suka ya pongi po na bika
Pota na motema ezali kosenga presence na yo
Nakomi se koyemba ngai moko

Azalaki se awa (se awa)
Cherie akeyi na ye
Alobaki na nga akozonga (se awa)
Nga ko nazelaka ye
Azalaki se awa (se awa)
Cherie akeyi mosika
Alobaki na nga akozonga (se awa)

Suka se akoya
Nayebi akozonga (se awa)
Nakangi motema kasi pasi esili te
Zonga o consoler nga (se awa)
Nabandi kobela

Gatho Beevans - Letras

top 30 músicas

©2003 - 2024 - musicas.mus.br